We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

Ebandeli 49

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← Ebandeli 48 Ebandeli Ebandeli 50 →

1Jakobi abengaki bana na ye ya mibali mpe alobaki :

2Bosangana mpe boyoka, bana mibali ya Jakobi ! Boyoka oyo tata na bino Isalaele akoloba :

3« Ribeni, ozali mwana na ngai ya liboso,

4Mobulu lokola mayi, okokende liboso te,

5Simeoni mpe Levi bazali bandeko,

6Molimo na ngai, kosangana te

7Tika ete kanda na bango elakelama mabe,

8Yuda, bandeko na yo ya mibali bakokumisa yo,

9Yuda, ozali mwana ya nkosi ;

10Nzete ya bokonzi ekolongwa te na Yuda,

11Akokanga ane na ye na nzete ya vino,

12Miso na ye ekozala motane koleka vino,

13Zabuloni akowumela pene ya ebale monene,

14Isakari azali ane ya makasi

15Amonaki ete bopemi ezali malamu,

16Dani akokamba bato na ye

17Dani akozala lokola nyoka na balabala

18Oh Yawe, nazali na elikya ete okobikisa ngai !

19Gadi, banguna ebele bakobundisa ye,

20Bilei oyo ekobima na mokili ya Aseri

21Nefitali azali lokola mboloko ya nsomi,

22Jozefi azali lokola nzete oyo ebotaka mbuma mingi,

23Banguna batumbolaki ye,

24kasi ye asimbaki kaka makasi tolotolo na ye,

25Mpo na Nzambe ya tata na yo, tika ete asungaka yo !

26Mapamboli ya tata na yo ezali na motuya

27Benjame azali lokola mbwa ya zamba ;

28Bango nyonso nde basali bikolo zomi na mibale ya Isalaele ; mpe oyo ezali maloba oyo tata na bango alobaki na bango tango apambolaki bango. Apesaki na moko na moko lipamboli oyo ekoki na ye.

29Jakobi apesaki bango malako oyo : « Nakomi pene ya kokende kokutana na batata na ngai. Bokunda ngai esika moko na bango, na lilita oyo ezali na elanga ya Efroni, moto ya Iti,

30kati na lidusu ya mabanga ya Makipela, pembeni ya Mamire, na mokili ya Kanana, elanga oyo Abrayami asombaki na Efroni, moto ya Iti, lokola lilita.

31Ezalaki kuna nde bakundaki Abrayami mpe Sara, mwasi na ye ; Izaki mpe Rebeka, mwasi na ye. Ezali kuna nde ngai nakundaki Lea.

32Elanga mpe lidusu ya mabanga oyo ezali kati na yango esombamaki epai ya bato ya Iti. »

33Tango Jakobi asilisaki kopesa malako epai ya bana na ye, asembolaki makolo na ye na mbeto, akataki motema mpe akendeki kokutana na batata na ye.

← Ebandeli 48 Ebandeli Ebandeli 50 →