We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

Ebandeli 3

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← Ebandeli 2 Ebandeli Ebandeli 4 →

1Nzokande, kati na banyama nyonso ya zamba oyo Yawe Nzambe akelaki, nyoka nde elekaki na mayele mabe. Alobaki na mwasi :

2Mwasi azongisaki epai ya nyoka :

3Kasi na oyo etali mbuma ya nzete oyo ezali na kati-kati ya elanga, Nzambe alobaki : « Bosengeli te kolia yango, mpe bosengeli te kosimba yango ; noki te bokokufa. »

4Nyoka alobaki na mwasi :

5Pamba te Nzambe ayebi malamu ete mokolo oyo bokolia yango, miso na bino ekofungwama mpe bokokoma lokola Ye3.5 Lolenge mosusu ya kobongola elobi : bokokoma lokola banzambe. : koyeba malamu na mabe.

6Mwasi amonaki ete mbuma ya nzete ezali elengi mpo na kolia, kitoko mpo na kotala mpe malamu mpo na kofungola mayele. Boye azwaki mbuma mpe aliaki yango. Apesaki yango mpe na mobali na ye, oyo azalaki elongo na ye ; bongo ye mpe mobali aliaki yango.

7Mbala moko, miso na bango mibale efungwamaki, mpe basosolaki ete bazali bolumbu. Boye, basangisaki makasa ya nzete ya figi mpe bamizipaki.

8Na pokwa, bayokaki makelele ya matambe ya Yawe Nzambe kotambola kati na elanga. Boye, mobali mpe mwasi babombamaki kati na banzete ya elanga mpo na kokima Yawe.

9Kasi Yawe Nzambe abengaki mobali mpe atunaki ye :

10Azongisaki :

11Nzambe alobaki :

12Adamu azongisaki :

13Yawe Nzambe alobaki na mwasi :

14Boye Yawe Nzambe alobaki na nyoka : « Lokola osali bongo,

15Nakotia koyinana kati na yo mpe mwasi,

16Nzambe alobaki na mwasi :

17Yawe Nzambe alobaki na Adamu : « Lokola oyokelaki mwasi na yo mpe oliaki mbuma ya nzete oyo, na tina na yango, napesaki yo mobeko oyo : ‹ Kolia yango te, ›

18Mabele ekobotela yo nzube mpe nzete ya sende.

19Okolia lipa na yo na motoki ya elongi na yo

20Mobali apesaki mwasi na ye kombo « Eva3.20 Eva elakisi : bomoi., » pamba te azali mama ya bato nyonso na mokili.

21Yawe Nzambe asalelaki Adamu mpe mwasi na ye bilamba ya poso ya nyama mpe alatisaki bango yango.

22Yawe Nzambe alobaki : « Tala, moto akomi lokola moko kati na biso mpo na koyeba malamu mpe mabe. Sik’oyo, esengeli te kopesa ye nzela ya kotia loboko na ye mpo na kozwa lisusu mbuma ya nzete ya bomoi mpe kolia yango, noki te awumela libela na bomoi. »

23Boye, Yawe Nzambe abenganaki ye na elanga ya Edeni mpo ete asala mosala ya mabele epai wapi awutaki.

24Sima na kobengana moto, atiaki basheribe, na ngambo ya este ya elanga ya Edeni, na mopanga ya moto oyo ezalaki kobaluka bipai na bipai mpo na kobatela nzela ya nzete ya bomoi.

← Ebandeli 2 Ebandeli Ebandeli 4 →