We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

Ebandeli 27

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← Ebandeli 26 Ebandeli Ebandeli 28 →

1Tango Izaki akomaki mobange mpe miso na ye ezalaki komona lisusu malamu te, abengaki Ezawu, mwana na ye ya liboso ya mobali. Alobaki na ye :

2Izaki alobaki :

3Yango wana, zwa sik’oyo mandoki na yo ya bokila, saki ya bokila mpe tolotolo ; kende na zamba mpe bomela ngai nyama.

4Okolambela ngai elubu ya kitoko ndenge nalingaka mpe okomemela ngai yango ; nakolia mpo ete napambola yo liboso ete nakufa.

5Nzokande, Rebeka azalaki koyoka makambo oyo Izaki azalaki koyebisa mwana na ye Ezawu. Tango Ezawu akendeki na zamba mpo na koboma nyama mpe kozonga na yango,

6Rebeka ayebisaki Jakobi, mwana na ye ya mibale :

7« Memela ngai nyama ! Okolambela ngai elubu ya kitoko, mpe nakolia yango mpo ete napambola yo na miso ya Yawe liboso ete nakufa. »

8Mwana na ngai, yoka ngai malamu sik’oyo mpe sala makambo oyo nakoyebisa yo :

9Kende na etonga ya bibwele mpe pona bana ntaba mibale mpe memela ngai yango mpo ete nalambela tata na yo elubu ya kitoko ndenge alingaka.

10Bongo, okomemela yango tata na yo ; akolia yango mpo ete apambola yo liboso ete akufa.

11Jakobi azongiselaki Rebeka, mama na ye :

12Soki tata na ngai asimbi ngai, akososola ete nalingi kokosa ye ; wana nakomibendela bilakeli mabe na esika ete napambolama.

13Mama na ye alobaki :

14Boye Jakobi akendeki, azwaki bana ntaba mpe amemaki yango epai ya mama na ye, mpe mama na ye alambaki elubu ya kitoko ndenge tata na ye azalaki kolinga.

15Bongo Rebeka azwaki na ndako, bilamba oyo elekaki kitoko kati na bilamba ya Ezawu, mwana na ye ya liboso, mpe alatisaki yango Jakobi, mwana na ye ya suka.

16Azipaki ye maboko mpe kingo na poso ya bana ntaba.

17Bongo Rebeka apesaki na maboko ya Jakobi, mwana na ye, elubu ya kitoko mpe lipa oyo alambaki.

18Jakobi akendeki epai ya tata na ye mpe alobaki :

19Jakobi alobaki na tata na ye :

20Izaki atunaki mwana na ye :

21Izaki alobaki na Jakobi :

22Jakobi akendeki pembeni na ye, bongo Izaki asimbaki ye mpe alobaki :

23Tata na ye ayebaki ye te, pamba te maboko ya Jakobi ezalaki na bapwale lokola ya Ezawu, ndeko na ye ; boye apambolaki ye.

24Kasi liboso, atunaki ye :

25Izaki alobaki :

26Sima, tata na ye, Izaki, alobaki na ye :

27Jakobi akendeki mpe apesaki ye beze. Tango Izaki ayokaki solo ya bilamba na ye, apambolaki ye na maloba oyo :

28Tika ete Nzambe apesa yo mvula ya likolo mpe mabele ya bozwi ;

29Tika ete bikolo esalela yo,

30Tango Izaki asilisaki kopambola ye, Jakobi atikaki tata na ye ; bongo ndeko na ye, Ezawu, azongaki wuta na bokila.

31Ye mpe alambaki elubu mpe amemaki yango epai ya tata na ye. Alobaki na ye :

32Tata na ye, Izaki, atunaki ye :

33Bongo Izaki alengaki makasi mpe alobaki :

34Tango Ezawu ayokaki maloba ya tata na ye, atombolaki mongongo makasi mpe agangaki. Alobaki na tata na ye :

35Izaki alobaki :

36Ezawu alobaki :

37Izaki azongiselaki Ezawu :

38Ezawu alobaki na tata na ye :

39Tata na ye, Izaki, alobaki na ye :

40Okobika na nzela ya mopanga na yo

41Ezawu ayinaki Jakobi likolo ya mapamboli oyo azwaki epai ya tata na ye mpe amilobelaki : « Etikali moke tata na ngai akufa ; bongo nakoboma ndeko na ngai Jakobi. »

42Tango Rebeka asosolaki makanisi ya Ezawu, mwana na ye ya liboso, abengaki Jakobi, mwana na ye ya suka, mpe alobaki na ye : « Tala, Ezawu, ndeko na yo, azali koluka koboma yo.

43Mwana na ngai, yoka ngai sik’oyo mpe sala makambo oyo nazali koyebisa yo : ‹ Longwa awa mpe kima na mboka Arani, epai ya ndeko na ngai Labani.

44Vanda mwa mikolo epai na ye kino kanda ya ndeko na yo ekosila.

45Tango kanda na ye ekosila mpe akobosana makambo oyo osalaki ye, nakotindela yo maloba mpo ete olongwa kuna mpe ozonga. Mpo na nini nazanga bino mibale mokolo moko ? › »

46Rebeka akendeki koyebisa Izaki : « Nalembi mokili likolo ya basi oyo ya mokili ya Iti. Soki Jakobi abali mwasi kati na bana basi ya mokili oyo, tina nazala na bomoi ekozala lisusu te. »

← Ebandeli 26 Ebandeli Ebandeli 28 →