We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

Ebandeli 22

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← Ebandeli 21 Ebandeli Ebandeli 23 →

1Na sima na makambo wana, Nzambe amekaki Abrayami. Alobaki na ye :

2Nzambe alobaki na ye :

3Na tongo-tongo, Abrayami atelemaki mpe abongisaki ane na ye. Azwaki basali mibale kati na basali na ye, azwaki mpe Izaki, mwana na ye. Abukaki bakoni mpo na kotumba mbeka, atelemaki mpe akendeki na esika oyo Nzambe ayebisaki ye.

4Na mokolo ya misato, Abrayami atombolaki miso na ye mpe amonaki esika yango na mosika.

5Bongo Abrayami ayebisaki basali na ye : « Botikala awa elongo na ane, wana ngai elongo na mwana tozali kokende kino kuna na likolo mpo na kogumbamela Nzambe ; sima na yango, tokozongela bino. »

6Abrayami azwaki bakoni ya kotumbela mbeka mpe amemisaki yango Izaki, mwana na ye ; mpe ye moko amemaki moto mpe mbeli, bongo bango mibale bakendeki nzela moko.

7Izaki atunaki Abrayami, tata na ye :

8Abrayami azongisaki :

9Tango bakomaki na esika oyo Nzambe alakisaki ye, Abrayami atongaki etumbelo na esika yango mpe abongisaki bakoni na likolo na yango. Akangaki Izaki, mwana na ye ya mobali, basinga mpe alalisaki ye na etumbelo likolo ya bakoni.

10Boye Abrayami azwaki mbeli mpe asembolaki loboko na ye mpo na koboma mwana na ye ya mobali.

11Kasi anjelu ya Yawe abengaki ye wuta na likolo :

12Anjelu alobaki :

13Abrayami atombolaki miso na ye mpe amonaki meme ya mobali oyo maseke na yango ezalaki ya kokangama na nzete ya moke. Azwaki yango mpe apesaki yango mbeka ya kotumba na esika ya mwana na ye ya mobali.

14Abrayami abengaki esika yango « Nkolo akopesa. » Yango wana balobaka kino lelo : « Na likolo ya ngomba ya Yawe, ekopesama. »

15Anjelu ya Yawe abengaki Abrayami na mbala ya mibale wuta na likolo

16mpe alobaki : « Nakati seleka na Kombo na Ngai, elobi Yawe, ete lokola osali likambo ya boye, lokola oboyi te kopesa Ngai mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko,

17nakopambola yo solo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto ya likolo, mpe ebele lokola zelo ya ebale. Bakitani na yo bakokamata bingumba ya banguna na bango.

18Bato ya bikolo nyonso ya mabele bakomipambola mpo na bakitani na yo, pamba te otosi Ngai. »

19Abrayami azongaki epai ya basali na ye mpe bakendeki elongo na Beri-Sheba epai wapi akobaki kovanda.

20Sima na makambo wana, bayebisaki Abrayami ete Milika mpe abotelaki Naori, ndeko ya Abrayami, bana :

21Mwana na ye ya liboso, Utsi ; Buzi, ndeko na ye mobali ;

22Kesedi, Azo, Pilidashi, Yidilafi mpe Betweli.

23Betweli azalaki tata ya Rebeka.

24Makangu ya Naori, oyo kombo na ye ezalaki Reuma, ye mpe abotelaki Naori bana :

← Ebandeli 21 Ebandeli Ebandeli 23 →