1Sarayi, mwasi ya Abrami, abotelaki ye mwana te. Nzokande azalaki na mosali moko ya mwasi, moto ya Ejipito ; kombo na ye « Agari. »
2Sarayi alobaki na Abrami :
3Sima na mibu zomi, wana Abrami avandaki na Kanana, mwasi na ye Sarayi apesaki ye Agari, mosali na ye ya mwasi, moto ya Ejipito, mpo ete azala mwasi na ye.
4Abrami asangisaki nzoto na Agari, mpe Agari akomaki na zemi. Tango Agari asosolaki ete akomi na zemi, akomaki kotiola Sarayi, nkolo na ye.
5Boye, Sarayi alobaki na Abrami :
6Abrami alobaki :
7Anjelu ya Yawe amonaki Agari na esobe, pene ya etima oyo ezali na nzela ya Shuri.
8Atunaki ye :
9Anjelu ya Yawe alobaki na ye :
10Anjelu ya Yawe alobaki na ye lisusu :
11Alobaki na ye lisusu :
12Akozala lokola ane ya zamba.
13Agari amitunaki : « Boni, namoni solo Nzambe oyo azali komona ngai ? »
14Yango wana babengaka libulu ya mayi yango Beri Lakai-Royi16.14 Beri Lakai-Royi elingi koloba : libulu ya Ye oyo azali na bomoi, oyo azali komona ngai.. Libulu ya mayi yango ezali na kati-kati ya Kadeshi mpe Beredi.
15Boye, Agari abotelaki Abrami mwana mobali mpe Abrami apesaki ye kombo « Isimaeli16.15 Isimaeli elakisi : Nzambe ayoki.. »
16Abrami azalaki na mibu tuku mwambe na motoba ya mbotama tango Agari abotelaki ye Isimaeli.