We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

Ebandeli 10

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← Ebandeli 9 Ebandeli Ebandeli 11 →

1Tala libota ya Noa : Semi, Cham mpe Jafeti ; bango mpe babotaki bakitani sima na mpela.

2Bana mibali ya Jafeti :

3Bana mibali ya Gomeri :

4Bana mibali ya Yavani :

5Bakitani na bango nde bavandaki na bisanga mpe na bamboka ya pembeni ya mayi. Moko na moko kati na bango azwaki mokili na ye kolanda lokota na ye, etuka na ye mpe libota na ye.

6Bana mibali ya Cham :

7Bana mibali ya Kushi :

8Kushi azalaki mpe tata ya Nimirodi oyo azalaki elombe ya liboso ya bitumba kati na mokili.

9Azalaki mobomi monene ya banyama na miso ya Yawe. Yango wana, balobaka : « Mobomi monene ya banyama lokola Nimirodi na miso ya Yawe. »

10Bingumba ya liboso ya mokili na ye ezalaki Babeli, Ereki, Akadi mpe Kaline na mokili ya Shineari.

11Longwa na mokili wana, alekaki na Asiri mpe atongaki Ninive, Reoboti-Iri, Kala

12mpe Reseni, engumba monene na kati-kati ya Ninive mpe Kala.

13Mitsirayimi azalaki koko

14ya Patrusi, ya Kasilu (oyo babimisa bato ya Filisitia) mpe ya Kereti.

15Kanana azalaki tata

16ya Yebusi, ya Amori, ya Girigazi,

17ya Evi, ya Ariki, ya Sini,

18ya Arivadi, ya Tsemari mpe ya Amati.

19Mokili ya bato ya Kanana ebandaki wuta na Sidoni, na nzela ya Gerari, kino na Gaza ; mpe na nzela ya Sodome, ya Gomore, ya Adima mpe ya Tseboyimi kino na Lesha.)

20Bango nde bazalaki bakitani ya Cham kolanda mabota mpe nkota na bango, kati na mikili mpe bikolo na bango.

21Semi, kulutu ya Jafeti, abotaki mpe bana ; azalaki koko ya Eberi mpe ya bakitani na ye.

22Bana mibali ya Semi :

23Bana mibali ya Arami :

24Aripakishadi abotaki Shela ;

25Eberi abotaki bana mibali mibale :

26Yokitani abotaki

27Adorami, Uzali, Dikila,

28Obali, Abimaeli, Saba,

29Ofiri, Avila mpe Yobabi. Bango nyonso wana bazalaki bakitani ya Yokitani.

30(Mokili oyo bazalaki kovanda ebandaki wuta na Mesha kino na Sefari, na mokili ya bangomba ya este.)

31Bango nde bazalaki bana mibali ya Semi kolanda bituka mpe nkota na bango, kati na mikili mpe bikolo na bango.

32Wana nde bituka ya bana mibali ya Noa kolanda milongo mpe mikili na bango. Bato nyonso oyo batondisaki mokili sima na mpela babotamaki na nzela na bango.

← Ebandeli 9 Ebandeli Ebandeli 11 →