We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

Rite 4

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← Rite 3 Rite

1Wana Boazi akendeki na ekuke ya engumba mpe avandaki kuna, amonaki mosikoli, oyo Boazi alobaki ete ye nde azali na ndingisa ya kosikola Rite, azali koleka. Boazi alobaki na ye : « Ndeko na ngai ya mobali, yaka nanu mpe vanda awa. » Moto yango apusanaki mpe avandaki.

2Boazi abengaki mibali zomi kati na bakambi ya engumba mpe asengaki ete bavanda na bango elongo. Tango bavandaki,

3Boazi alobaki na mosikoli ya Rite :

4Ngai nazwaki likanisi ya koyebisa yo mpe kosenga na yo ete osomba na yo yango na miso ya bavandi ya engumba mpe ya bakambi oyo bazali awa. Soki ondimi kosomba yango, somba na yo. Soki te, yebisa ngai mpo ete nayeba ; pamba te yo nde ozali moto ya liboso oyo azali na ndingisa ya kosomba yango, mpe ngai nazali na ndingisa sima na yo.

5Boazi alobaki :

6Mosikoli alobaki :

7Nzokande, na tango ya kala kati na Isalaele, mpo na kosikola mpe kopesa libula, moto moko azalaki kolongola sapatu na ye mpe kopesa yango epai ya moto mosusu. Sapatu yango ezalaki lokola elembo ya litatoli kati na Isalaele.

8Mosikoli alobaki na Boazi :

9Boazi ayebisaki bampaka mpe bato nyonso :

10Nazwi lisusu Rite, moto ya Moabi, oyo azalaki mwasi ya Maaloni oyo akufa, mpo ete azala mwasi na ngai, mpo na kosala ete kombo na ye etikala na libula na ye, ete ebunga te kati na bandeko na ye mpe kati na buku ya leta ya engumba na ye. Bino bozali batatoli na yango lelo.

11Boye, bampaka mpe bato nyonso oyo bazalaki na ekuke ya engumba balobaki :

12Tika ete bakitani oyo Yawe akopesa yo na nzela ya elenge mwasi oyo, bakomisa ndako na yo lokola ndako ya Peretsi oyo Tamari abotelaki Yuda !

13Boye, Boazi akamataki Rite mpe abalaki ye. Sima na Boazi kosangisa na ye nzoto, Yawe asalelaki Rite ngolu : azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali.

14Basi balobaki na Naomi :

15Akoyeisa bomoi na yo sika

16Naomi azwaki mwana, atiaki ye na tolo na ye mpe akomaki mama mobokoli na ye.

17Basi ya mboka wana balobaki : « Naomi aboti mwana mobali ! » Bapesaki mwana mobali yango kombo « Obedi. » Obedi abotaki Izayi, mpe Izayi abotaki Davidi.

18Tala libota ya Peretsi :

19Etsironi abotaki Rami,

20Aminadabi abotaki Nashoni,

21Salima abotaki Boazi,

22Obedi abotaki Izayi,

← Rite 3 Rite