1Na mokolo ya liboso ya sanza ya zomi na mibale, na mobu ya zomi na mibale, Yawe alobaki na ngai :
2« Mwana na moto, tinda nzembo ya mawa mpo na Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpe yebisa ye :
3Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :
4Nakobwaka yo na mabele
5Nakopanza misuni ya nzoto na yo na bangomba
6Nakotondisa mokili,
7Tango nakoboma yo ndenge babomaka mwinda,
8Likolo na yo,
9Nakotungisa mitema ya bato ebele
10Nakosala ete bato ya bikolo ebele bakamwa yo
11Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :
12Nakosala ete bato ebele bakufa kati na yo
13Nakoboma ngombe na yango nyonso
14Bongo nakosala ete mayi na yango evanda kimia
15Tango nakosala ete Ejipito etikala lisusu na bato te,
16Yango nde nzembo ya mawa oyo bakoyembela Ejipito ; bilenge basi ya bikolo mosusu nde bakoyemba yango, bakoyemba yango na tina na Ejipito elongo na bato na yango nyonso, elobi Nkolo Yawe. »
17Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza wana kaka, na mobu ya zomi na mibale, Yawe alobaki na ngai :
18« Mwana na moto, tinda nzembo ya mawa na tina na bato nyonso ya Ejipito mpe kitisa na mokili ya bakufi elongo na bato oyo bakitaka na libulu, mokili ya Ejipito elongo na bato ya bikolo ya nguya.
19Loba na bango : ‹ Boni, boleki bato mosusu na nini ? Bokita mpe bolala esika moko na bato oyo bakatama ngenga te ! ›
20Bakokweya kati na bato oyo bakufaki na mopanga.
21Wuta na mboka ya bakufi,
22Mokili ya Asiri ezali kuna elongo na mampinga na yango nyonso, ezingelami na malita ya bato na yango nyonso oyo babomaki : bango nyonso oyo bakufaki na mopanga.
23Malita na bango ezali kati na libulu moko ya mozindo, mpe mampinga na yango elali zingazinga ya bakunda na ye. Bato nyonso oyo bazalaki koyeisa somo na mokili ya bato ya bomoi basili kokweya, bakufi na mopanga.
24Mokili ya Elami ezali kuna elongo na mampinga na yango nyonso, zingazinga ya bakunda na yango ; bato na yango nyonso bakweyaki, bakufaki na mopanga. Bato nyonso oyo bazalaki koyeisa somo kati na mokili ya bato ya mokili yango basili kokita elongo na bato oyo bakatama ngenga te, na mokili ya bakufi ; bakoyoka soni bango moko elongo na bato oyo bakitaka na libulu.
25Basalaki mbeto moko mpo na mokili yango kati na bato oyo bakufaki na mopanga, esika moko na mampinga na yango nyonso, zingazinga ya bakunda na yango. Bato nyonso oyo bakufaki na mopanga bazalaki bato bakatama ngenga te. Lokola somo na bango epanzanaki na mokili ya bato ya bomoi, bamemaki soni na bango elongo na bato oyo bakitaka na libulu ; bazali kolala esika moko na bato oyo babomaki na mopanga.
26Mokili ya Mesheki mpe ya Tubali ezali kuna elongo na bato na yango nyonso, zingazinga ya malita na yango. Bato nyonso oyo bakufaki na mopanga bazalaki bato bakatama ngenga te, pamba te bayeisaki somo makasi kati na mokili ya bato ya bomoi.
27Boni, balali te esika moko na basoda mosusu oyo bakatama ngenga te to balali te esika moko na basoda ya mpiko oyo bakufaki mpe bakitaki na mboka ya bakufi na bibundeli na bango, na mipanga na bango na se ya mito na bango ? Etumbu mpo na masumu na bango ekweyaki na mikuwa na bango, atako bazalaki kolengisa basoda ya mpiko ya mokili ya bato ya bomoi na somo.
28Oh Faraon, yo mpe okobukana, okolala esika moko na bato oyo bakatama ngenga te, bato oyo bakufaki na mopanga !
29Mokili ya Edomi ezali kuna, bakonzi na yango mpe bakambi na yango balali esika moko na bato oyo bakufaki na mopanga atako bazalaki na nguya ; balali esika moko na bato oyo bakatama ngenga te mpe bato oyo bakitaka na libulu.
30Bakambi nyonso ya etuka ya nor mpe bato nyonso ya Sidoni bazali kuna ; bakitaki na soni elongo na bato oyo bakufaki atako nguya na bango ezalaki kopesa bato somo makasi ; balali lokola bato bakatama ngenga te elongo na bato oyo bakufaki na mopanga, mpe bakufaki na soni makasi elongo na bato oyo bakitaka na libulu.
31Ye Faraon elongo na mampinga na ye nyonso bakomona bango mpe bakobondisama na tina na bato nyonso oyo bakufaki na mopanga, elobi Nkolo Yawe.
32Atako nayeisaki somo na mokili ya bato ya bomoi na nzela na ye, Faraon mpe bato na ye nyonso bakolala kati na bato oyo bakatama ngenga te, bato oyo bakufa na mopanga, elobi Nkolo Yawe. »