We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

Ezekieli 15

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← Ezekieli 14 Ezekieli Ezekieli 16 →

1Yawe alobaki na ngai :

2« Mwana na moto, nzete ya vino eleki banzete mosusu na nini ? Bitape na yango eleki bitape ya banzete mosusu ya zamba na nini ?

3Bakoki solo kobimisa libaya na nzete ya vino mpe kosalela yango eloko ya tina penza ? Bakoki solo kosalela yango bisimbelo ya kotiela biloko likolo ?

4Sima na kobwaka yango na moto, moto ezikisaka basonge mpe kati na yango ; boye ndenge nini bakoki kosalela yango penza eloko ya malonga ?

5Soki kutu bakoki kosalela yango eloko ya malonga te tango ezali nanu mobimba, bongo ndenge nini bakoki kosalela yango eloko ya malonga tango moto esili kozikisa mpe kotumba yango ?

6Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Ndenge nabwakaka na moto nzete ya vino kati na banzete mosusu ya zamba, ndenge wana mpe nakosala bavandi ya Yelusalemi.

7Nakotelemela bango penza ; ezala babimi na moto, moto mosusu ekotumba bango. Na bongo, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakopesa bango etumbu :

8Nakosala ete mokili na bango etikala lisusu na bato te mpo ete batambolaki na boyengebene te, basalaki makambo ya nkele elobi Nkolo Yawe. »

← Ezekieli 14 Ezekieli Ezekieli 16 →