We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

Kobima 17

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← Kobima 16 Kobima Kobima 18 →

1Lisanga mobimba ya bana ya Isalaele elongwaki na esobe ya Tsini mpe ezalaki kotambola kolanda ndenge Yawe azalaki kotinda. Batongaki molako na bango na Refidimi, kasi mayi ya komela ezalaki te mpo na bato.

2Bato ya Isalaele baswanisaki Moyize, balobaki na ye :

3Lokola posa ya mayi elekaki makasi, bato bayimaki-yimaki epai ya Moyize mpe balobaki :

4Moyize abelelaki Yawe :

5Yawe azongiselaki Moyize :

6Ngai nakotelema kuna, liboso na yo, na likolo ya libanga oyo ezali na ngomba Orebi. Okobeta libanga yango, mpe yango ekobimisa mayi, bongo bato bakomela.

7Abengaki esika yango Masa17.7 Masa elingi koloba : komeka. mpe Meriba17.7 Meriba elingi koloba : koswana., pamba te bana ya Isalaele baswanisaki ye mpe bamekaki Yawe tango balobaki : « Boni, Yawe yango azali kati na biso to te ? »

8Bato ya Amaleki bayaki mpe babundisaki bana ya Isalaele na Refidimi.

9Moyize alobaki na Jozue :

10Jozue asalaki ndenge Moyize atindaki ye mpe abundisaki bato ya Amaleki ; wana Moyize, Aron mpe Wuri bamataki likolo ya ngomba.

11Tango nyonso Moyize abandaki kotombola maboko na ye mpo na kobondela, bana ya Isalaele bazalaki kolonga ; kasi tango nyonso azalaki kokitisa maboko na ye, bato ya Amaleki bazalaki kolonga.

12Tango maboko ya Moyize elembaki, Aron mpe Wuri bakamataki libanga mpe batielaki ye yango mpo ete avandela yango ; mpe Moyize avandelaki yango. Aron mpe Uri batombolaki maboko na ye, moko na ngambo moko, mpe mosusu na ngambo mosusu. Boye maboko na ye etikalaki ya kosembolama kino na pokwa.

13Mpe Jozue alongaki basoda ya bato ya Amaleki na mopanga.

14Yawe alobaki na Moyize :

15Moyize atongaki etumbelo mpe abengaki yango « Nkolo azali bendele na ngai ya lokumu. »

16Moyize alobaki : « Lokola esali ete babundisi Kiti ya Bokonzi ya Yawe, Yawe akobundisa bato ya Amaleki tango nyonso. »

← Kobima 16 Kobima Kobima 18 →