1Moyize mpe bana ya Isalaele bayembaki loyembo oyo mpo na lokumu ya Yawe :
2Yawe azali makasi na ngai,
3Yawe azali elombe ya bitumba ;
4Azindisi na ebale monene,
5Mozindo ya mayi ezipi bango,
6Loboko na Yo ya mobali, oh Yawe,
7Na monene ya nguya na Yo,
8Na pema ya zolo na Yo,
9Monguna amilobelaki :
10Kasi Yo, Yawe, ofuli mopepe na Yo,
11Oh Yawe, nani kati na banzambe azali lokola Yo ?
12Osembolaki loboko na Yo ya mobali,
13Na bolingo na Yo, otambolisi bato oyo okangoli.
14Bikolo eyoki sango na yango mpe ekomi kolenga,
15Bakambi ya Edomi bakomi na somo,
16Kobanga mpe somo ekweyeli bango.
17Okomema bango mpe okovandisa bango
18Yawe akotikala mokonzi libela na libela !
19Tango bampunda ya Faraon, bashar na ye elongo na bato oyo batambolisaka yango bamikotisaki kati na ebale monene, Yawe azongisaki mayi ya ebale monene likolo na bango. Nzokande bana ya Isalaele bakatisaki ebale monene lokola na esobe.
20Miriami, mwasi mosakoli mpe ndeko mwasi ya Aron, azwaki mbunda moke na loboko na ye mpe basi nyonso balandaki ye ; bazalaki kobeta bambunda mike mpe kobina.
21Miriami ayembaki elongo na bango :
22Moyize atambolisaki bana ya Isalaele wuta na ebale monene ya barozo mpe amemaki bango na nzela oyo ekenda na esobe ya Shuri. Batambolaki mikolo misato kati na esobe mpe bamonaki mayi te.
23Tango bakomaki na Mara15.23 Mara elakisi : bololo. epai wapi bamonaki mayi, bakokaki te komela mayi yango, pamba te ezalaki bololo. Yango wana babengaki esika yango Mara.
24Boye bato bayimaki-yimaki na tina na Moyize mpe balobaki : « Tokomela nini ? »
25Boye Moyize abelelaki Yawe, mpe Yawe alakisaki ye eteni ya nzete. Moyize abwakaki yango na mayi, mpe mayi ekomaki elengi mpo na komela.
26Alobaki : « Soki boyoki na bokebi mongongo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bosali oyo ezali sembo na miso na Ye, soki bosali keba na malako na Ye mpe bobateli bikateli na Ye nyonso, nakotindela bino ata bokono moko te oyo natindelaki bato ya Ejipito ; pamba te nazali Yawe oyo abikisaka bino na bokono. »
27Bongo bana ya Isalaele bakomaki na Elimi epai wapi bitima15.27 Etima ezali esika oyo mayi ebandaka kobima na mabele. zomi na mibale mpe banzete ya mbila tuku sambo ezalaki. Ezalaki kuna nde batongaki molako na bango, pene ya mayi.