We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

Esidrasi 2

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← Esidrasi 1 Esidrasi Esidrasi 3 →

1Tala bato ya etuka ya Yuda, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, amemaki na bowumbu na mokili ya Babiloni, mpe, wuta na bowumbu, bazongaki na Yelusalemi mpe na Yuda, moto na moto kati na engumba na ye.

2Bazongaki nzela moko na Zorobabeli, Jozue, Neyemi, Seraya, Reyelaya, Maridoshe, Bilishani, Misipari, Bigivayi, Rewumi, Baana.

3Bakitani ya Pareoshi :

4Bakitani ya Shefatia :

5Bakitani ya Ara :

6Bakitani ya Paati-Moabi na nzela ya Jozue mpe Joabi :

7Bakitani ya Elami :

8Bakitani ya Zatu :

9Bakitani ya Zakayi :

10Bakitani ya Bani :

11Bakitani ya Bebayi :

12Bakitani ya Azigadi :

13Bakitani ya Adonikami :

14Bakitani ya Bigivayi :

15Bakitani ya Adini :

16Bakitani ya Ateri na nzela ya Ezekiasi :

17Bakitani ya Betsayi :

18Bakitani ya Yora :

19Bakitani ya Ashumi :

20Bakitani ya Gibari :

21Bato ya mboka Beteleemi,

22Bato ya mboka Netofa :

23Bato ya mboka Anatoti :

24Bato ya Azimaveti :

25Bakitani ya Kiriati-Yearimi, Kefira mpe Beyeroti :

26Bakitani ya Rama mpe Geba :

27Bato ya mboka Mikimasi :

28Bato ya bamboka Beteli mpe Ayi :

29Bakitani ya Nebo :

30Bakitani ya Magibishi :

31Bakitani ya Elami mosusu :

32Bakitani ya Arimi :

33Bakitani ya Lodi, Adidi mpe Ono :

34Bakitani ya Jeriko :

35Bakitani ya Sena :

36Tala motango ya Banganga-Nzambe :

37Bakitani ya Imeri :

38Bakitani ya Pashuri :

39Bakitani ya Arimi :

40Tala motango ya Balevi :

41Tala motango ya bayembi :

42Tala motango ya bakengeli bikuke ya Tempelo :

43Tala basali ya Tempelo :

44Kerosi, Siya, Padoni,

45Lebana, Agaba, Akubi

46Agabi, Shalimayi, Anani,

47Gideli, Gaari, Reaya,

48Retsini, Nekoda, Gazami,

49Uza, Paseya, Besayi,

50Asina, Mewunimi, Nefusimi,

51Bakibuki, Akufa, Aruri,

52Batsiluti, Meyida, Arisha,

53Barikosi, Sisera, Tama,

54Netsia mpe Atifa.

55Tala bakitani ya basali ya Salomo :

56Yala, Darikoni, Gideli,

57Shefatia, Atili, Pokereti-Atsebayimi mpe Ami.

58Motango ya basali ya Tempelo mpe ya bakitani ya basali ya Salomo : nkama misato na tuku libwa na mibale.

59Tala molongo ya bato oyo bawutaki na bowumbu, na bingumba Teli-Mela, Teli-Arisha, Kerubi-Adani mpe Imeri, kasi balongaki te kolakisa ete mabota na bango ya botata ewuta na Isalaele :

60Bakitani ya Delaya, Tobiya mpe Nekoda :

61Mpe kati na Banganga-Nzambe :

62Balukaki mikanda oyo bakoma bakombo ya bakoko na bango, kasi batikalaki komona yango te. Boye balongolaki bango na mosala ya bonganga-Nzambe, pamba te bazalaki mbindo.

63Moyangeli apekisaki bango kolia bilei ya bule kino tango Nganga-Nzambe moko akotuna toli ya Yawe na tina na bango, na nzela ya Urimi mpe Tumimi.

64Motango ya lisanga mobimba ya bato oyo bawutaki na bowumbu ezalaki nkoto tuku minei na mibale na nkama misato na tuku motoba,

65bakisa bawumbu na bango ya mibali mpe ya basi, nkoto sambo na nkama misato na tuku misato na sambo ; bazalaki na bayembi na bango ya basi mpe ya mibali, nkama mibale ;

66bampunda ya bitumba, nkama sambo na tuku misato na motoba ; bamile nkama mibale na tuku minei na mitano ;

67bashamo nkama minei na tuku misato na mitano ; mpe ba-ane nkoto motoba na nkama sambo na tuku mibale.

68Tango bakomaki na Tempelo ya Yawe, na Yelusalemi, bakambi mingi ya mabota bapesaki makabo oyo bakataki bango moko kopesa wuta na mokano ya mitema na bango mpo na kotonga lisusu Tempelo ya Nzambe, na esika na yango ya kala.

69Bapesaki na libenga ya misala, moto na moto kolanda ezweli na ye, mbongo ya bibende ya wolo nkoto tuku motoba na moko, mbongo ya bibende ya palata nkoto mitano, mpe banzambala nkama moko ya mosala ya bonganga-Nzambe.

70Banganga-Nzambe, Balevi, bakengeli bikuke, bayembi, basali ya Tempelo, ndambo kati na bato mpe bato nyonso ya Isalaele bavandaki kati na bingumba na bango.

← Esidrasi 1 Esidrasi Esidrasi 3 →