We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

Deteronomi 32

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← Deteronomi 31 Deteronomi Deteronomi 33 →

1Oh likolo, yoka malamu, pamba te nalingi koloba !

2Tika ete mateya na ngai ekweya lokola mvula,

3Nakosakola Kombo ya Yawe.

4Yawe azali lokola Libanga ;

5Kasi bino, bomibebisaki liboso na Ye ;

6Boni, ezali ndenge wana nde bofuti Yawe ?

7Bokanisa mikolo ya kala,

8Tango Ye-Oyo-Aleki-Likolo apesaki

9Pamba te eteni ya Yawe ezali bato na Ye ;

10Amonaki ye na esobe,

11Azali lokola mpongo

12Ye moko Yawe akambaki bango ;

13Akambaki bango na bisika oyo eleki likolo kati na mokili,

14miliki ya bangombe mpe ya bameme ;

15Yeshuruni akomaki monene mpe moto makasi ;

16Bapesaki Yawe kanda makasi

17Babonzaki bambeka epai ya milimo mabe

18Bobosanaki Libanga oyo ebotaki bino

19Yawe amonaki likambo oyo mpe abwakaki bango,

20Alobaki : « Nakobombela bango elongi na Ngai,

21Bazwelaki Ngai mbanda oyo azali ata nzambe te,

22Pamba te kanda na Ngai epeli makasi lokola moto,

23Nakobakisela bango pasi likolo ya pasi,

24Nakotindela bango nzala makasi,

25Na libanda, mopanga ekokomisa bango bato bazanga bana ;

26Nalobaki : Nakopanza bango

27Kasi nazali kobanga ete banguna bafinga Ngai

28Bato oyo bazali ekolo ezanga mayele,

29Soki kaka bazalaki bato ya bwanya,

30Ndenge nini moto moko akoki kobengana bato nkoto moko,

31Pamba te Libanga na bango azali lokola libanga na biso te ;

32Bilanga na bango ya vino ewuti

33Vino na bango ezali ngenge ya banyoka,

34« Boni, ebombami epai na Ngai te ?

35Ngai nde nazongisaka mabe na mabe,

36Yawe akosambisa bato na Ye,

37Bongo akoloba : « Wapi banzambe na bango ?

38Wapi banzambe oyo ezalaki kolia mafuta ya bambeka na bango

39Botala sik’oyo, Ngai kaka nde nazali Nzambe ;

40Natomboli loboko na Ngai na likolo,

41tango nakopelisa minu ya mopanga na Ngai,

42Tango mopanga na Ngai ekozala kosasa misuni ya bato,

43Oh bikolo, bosepela elongo na bato na Ye !

44Moyize ayaki mpe alobaki maloba nyonso ya nzembo oyo, mpe bato nyonso bazalaki koyoka ye ; azalaki elongo na Oze, mwana mobali ya Nuni.

45Tango Moyize asilisaki koloba maloba oyo nyonso epai ya bana nyonso ya Isalaele,

46alobaki na bango lisusu : « Bobatela malamu kati na mitema na bino maloba nyonso oyo nalobi na bino lelo, mpo ete bopesa mitindo epai ya bana na bino ete batosa penza maloba nyonso ya mibeko oyo.

47Ezali maloba ya pamba te epai na bino, kasi ezali nde bomoi na bino. Ezali na nzela na yango nde bokozala na bomoi molayi kati na mokili oyo bokozwa sima na kokatisa Yordani. »

48Na mokolo wana kaka, Yawe alobaki na Moyize :

49« Mata na ngomba Abarimi, ngomba Nebo oyo ezali kati na Moabi mpe etalana na Jeriko ; mpe tala mokili ya Kanana, mokili oyo nazali kopesa epai ya bana ya Isalaele lokola libula na bango.

50Okokufa na ngomba oyo okomata ; mpe kuna, okokende kokutana na bakoko na yo, oyo bakufa ndenge Aron, ndeko na yo ya mobali, akufaki na ngomba Ori mpe akutanaki na bakoko na ye,

51pamba te bino mibale botambolaki te na boyengebene liboso na Ngai, na miso ya bana ya Isalaele, na mayi ya Meriba, pembeni ya Kadeshi, kati na esobe ya Tsini, mpe bobatelaki te bosantu na Ngai kati na bana ya Isalaele.

52Yango wana okomona mokili yango kaka na mosika, okokota te na mokili oyo nalingi kopesa na bana ya Isalaele. »

← Deteronomi 31 Deteronomi Deteronomi 33 →