1Bitumba kati na libota ya Saulo mpe libota ya Davidi ewumelaki tango molayi. Wana makasi ya Davidi ezalaki komata se komata, makasi ya libota ya Saulo ezalaki kaka kokita.
2Tala bana mibali ya Davidi oyo babotamaki na Ebron :
3ya mibale, Kileabi oyo Abigayili oyo akufisaki mobali na ye ya liboso, Nabali, moto ya Karimeli, abotelaki ye ;
4ya minei, Adoniya oyo Agite abotelaki ye ;
5ya motoba, Yitileami oyo Egila, mwasi ya Davidi, abotelaki ye.
6Na tango ya bitumba kati na mabota ya Saulo mpe ya Davidi, Abineri azalaki kolendisa nguya na ye kati na ndako ya Saulo.
7Nzokande, Saulo azalaki na makangu moko ; kombo na ye ezalaki « Ritsipa, » mwana mwasi ya Aya. Bongo Ishi-Bosheti alobaki na Abineri :
8Tango Abineri ayokaki makambo oyo Ishi-Bosheti alobaki, asilikaki makasi mpe azongisaki :
9Tika ete Nzambe apesa ngai Abineri etumbu ya makasi soki nasali te mpo na Davidi makambo oyo Yawe alakaki ye, na nzela ya ndayi,
10ete akolongola bokonzi na ndako ya Saulo mpe akotia kiti ya bokonzi ya Davidi kati na Isalaele mpe kati na Yuda, longwa na Dani kino na Beri-Sheba.
11Ishi-Bosheti akokaki kozongisa ata liloba moko te epai ya Abineri, pamba te azalaki kobanga ye.
12Abineri atindaki bantoma koloba na Davidi :
13Davidi azongisaki :
14Bongo Davidi atindaki bantoma koloba na Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo :
15Boye Ishi-Bosheti atindaki bato kozwa Mikali epai ya mobali na ye, Palitieli, mwana mobali ya Laishi.
16Mobali na ye alandaki ye na kolela kino na Bawurimi. Kasi Abineri alobaki na mobali yango :
17Abineri asololaki na bampaka ya Isalaele mpe alobaki na bango :
18bosala yango sik’oyo ; pamba te Yawe alobaki boye na tina na ye : « Ezali na nzela ya Davidi, mosali na ngai, nde nakobikisa bato na Ngai, Isalaele, na maboko ya bato ya Filisitia mpe ya banguna na bango nyonso. »
19Sima na Abineri koloba likambo yango epai ya bato ya libota ya Benjame, akendeki na Ebron mpo na koyebisa Davidi makambo nyonso oyo bato ya Isalaele mpe libota mobimba ya Benjame babongisaki.
20Mpe tango Abineri elongo na bato na ye, tuku mibale, bakomaki epai ya Davidi, na Ebron, Davidi asaliselaki bango feti.
21Abineri alobaki na Davidi :
22Sima na mwa tango, basali ya Davidi mpe Joabi bazongaki wuta na bitumba mpe bamemaki bomengo ebele ya bitumba. Abineri azalaki lisusu na Ebron te, epai ya Davidi, pamba te Davidi asilaki kotika ye kokende, mpe azongaki na kimia.
23Tango kaka Joabi mpe basoda na ye nyonso bakomaki, bayebisaki Joabi :
24Joabi akendeki komona mokonzi mpe alobaki na ye :
25Nzokande oyebi malamu Abineri, mwana mobali ya Neri ! Soki ayaki epai na yo, ezalaki nde mpo na kokosa yo, mpo na kononga mpe koluka koyeba bisika nyonso oyo otambolaka mpe makambo nyonso oyo osalaka.
26Sima na Joabi kowuta na ndako ya Davidi, atindaki bantoma mpo ete balanda mpe bakanga Abineri. Mpe wana Davidi ayebaki te, bantoma bazongisaki Abineri wuta na libulu ya mayi ya Sira.
27Tango Abineri azongaki lisusu na Ebron, Joabi abendaki ye na pembeni, na kati-kati ya ekuke ya engumba lokola nde alingi kosolola na ye na nkuku. Mpe kuna, mpo na kozongisa mabe na mabe na tina na makila ya ndeko na ye ya mobali Asaeli, Joabi atubaki Abineri mbeli na libumu, mpe Abineri akufaki.
28Sima na yango, tango kaka Davidi ayokaki sango ya makambo oyo ewutaki kosalema, alobaki :
29Tika ete makila na ye etangama na moto ya Joabi mpe ya libota na ye mobimba ! Tika ete ndako ya Joabi ezangaka te bato oyo bakobela bokono ya sopisi3.29 Sopisi ezali bokono ya kobima tofina na nzoto ya mibali. to bokono ya maba to bato oyo bakotambola na banzete to bato oyo bakokufa na mopanga to bato oyo bakozanga bilei.
30Joabi mpe ndeko na ye ya mobali, Abishayi, babomaki Abineri mpo ete abomaki Asaeli, ndeko na bango ya mobali, na bitumba ya Gabaoni.
31Bongo Davidi alobaki na Joabi mpe na bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye :
32Bakundaki Abineri, na Ebron, mpe mokonzi alelaki makasi na likolo ya kunda ya Abineri. Bato nyonso mpe balelaki.
33Bongo mokonzi ayembaki nzembo oyo ya mawa mpo na Abineri :
34Bakangaki te maboko na yo na basinga,
35mpe basengaki na Davidi ete alia wana moyi ezali nanu. Kasi Davidi alapaki ndayi na maloba oyo : « Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu oyo eleki makasi soki nameki kolia mapa to eloko mosusu liboso ete moyi elala ! »
36Bato nyonso bayokaki ndayi yango mpe basepelaki na yango : bazalaki kosepela na makambo nyonso oyo mokonzi azalaki kosala.
37Mpe na mokolo wana, basoda nyonso ya Isalaele mpe Isalaele mobimba bandimaki ete mokonzi ayebaki ata likambo moko te na tina na kufa ya Abineri, mwana mobali ya Neri.
38Mokonzi alobaki na basali na ye : « Boni, boyebi na bino ete mokambi moko mpe moto moko ya monene akweyi lelo kati na Isalaele ?
39Na mokolo ya lelo, atako bapakola ngai mafuta lokola mokonzi, nazali na makasi te, mpe bana mibali oyo ya Tseruya baleki ngai na makasi. Tika ete Yawe apesa etumbu na moto oyo asali mabe oyo kolanda mabe na ye ! »