We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

2 Samuele 18

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← 2 Samuele 17 2 Samuele 2 Samuele 19 →

1Davidi atangaki basoda oyo bazalaki elongo na ye ; mpe kati na bango, aponaki bakonzi ya bankoto mpe bakonzi ya bankama.

2Davidi apesaki mitindo na mampinga ete bakende. Akabolaki bango na masanga misato : lisanga ya liboso ekambamaki na Joabi ; ya mibale, na Abishayi, ndeko mobali ya Joabi, mwana mobali ya Tseruya ; mpe ya misato, na Itayi, moto ya Gati. Mokonzi alobaki na masanga ya mampinga ete ye moko akokende solo elongo na bango.

3Kasi basoda balobaki :

4Mokonzi azongisaki :

5Apesaki mitindo oyo epai ya Joabi, Abishayi mpe Itayi : « Na kombo na ngai, bosala malembe na elenge mobali Abisalomi. »

6Mampinga etambolaki kati na zamba mpo na kobundisa Isalaele, mpe bitumba ezalaki kati na zamba ya Efrayimi.

7Kuna, mampinga ya Davidi elongaki mampinga ya Isalaele, mpe basoda nkoto tuku mibale bakufaki mokolo wana kati na mampinga ya Isalaele.

8Bitumba epanzanaki mboka mobimba ; mpe mokolo wana, bato oyo bakufaki kati na zamba bazalaki ebele koleka bato oyo bakufaki na mopanga.

9Abisalomi akutanaki na bato ya Davidi na mbalakata. Azalaki kotambola na likolo ya mile na ye. Bongo tango mile ekimaki, ekotaki na se ya nzete ya terebente oyo ezalaki na bitape ekangana-kangana, mpe moto ya Abisalomi ekangamaki na nzete. Abisalomi atikalaki ya kodiembela na likolo, kasi mile oyo azalaki kotambolisa ekobaki kokima mbangu.

10Tango moko kati na basoda amonaki ye, alobaki na Joabi :

11Joabi alobaki na moto oyo ayebisaki ye likambo yango :

12Kasi moto yango azongiselaki Joabi :

13Eloko moko te ebombamaka na miso ya mokonzi. Bongo soki natosaki mokonzi te mpe soki nabomaki Abisalomi, yo olingaki na yo kokotela ngai te.

14Joabi alobaki :

15Sima, bilenge mibali zomi oyo bamemaki bibundeli ya Joabi, bazingaki Abisalomi, babetaki ye mpe babomaki ye.

16Joabi abetaki kelelo, mpe masanga ya mampinga etikaki kolanda Isalaele, pamba te apekisaki bango.

17Bazwaki Abisalomi, babwakaki ye na zamba kati na libulu moko ya monene mpe bazipaki ye na se ya mopiku ya mabanga. Na tango wana, basoda nyonso ya Isalaele bakimaki na bandako na bango.

18Nzokande, wana Abisalomi azalaki nanu na bomoi, azwaki libanga ya ekaniseli mpe atelemisaki yango na lubwaku ya mokonzi lokola ekaniseli mpo na ye, pamba te amilobelaki : « Nazali te na mwana mobali oyo akoki komema kombo na ngai lokola ekaniseli. »

19Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki, alobaki na Joabi :

20Joabi alobaki na ye :

21Bongo Joabi alobaki na moto moko ya Kushi :

22Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki, alobaki lisusu na Joabi :

23Ayimaatsi alobaki :

24Na tango yango, Davidi avandaki kati ya ekuke ya kati mpe ekuke ya libanda, mpe mokengeli amataki na likolo ya ndako ya ekuke, pembeni ya mir. Tango atombolaki miso, amonaki mwana mobali moko kokima mbangu ye moko.

25Mokengeli agangaki epai ya mokonzi mpe ayebisaki ye. Mokonzi alobaki : « Soki azali ye moko, wana azali na basango malamu. »

26Bongo mokengeli amonaki moto mosusu kokima mbangu, mpe abelelaki mokengeli ekuke :

27Mokengeli alobaki :

28Bongo Ayimaatsi abelelaki mokonzi :

29Mokonzi atunaki :

30Mokonzi alobaki :

31Bongo moto ya Kushi akomaki mpe alobaki :

32Mokonzi atunaki na moto ya Kushi :

← 2 Samuele 17 2 Samuele 2 Samuele 19 →