We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

2 Bakolinto 6

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← 2 Bakolinto 5 2 Bakolinto 2 Bakolinto 7 →

1Lokola tozali basali elongo na Nzambe, tozali kolendisa bino ete bozwa ngolu ya Nzambe na pamba te ;

2pamba te Nzambe alobi :

3Tobetisaka moto moko te mabaku, mpo ete mabe elobama te na tina na lotomo na biso.

4Kasi tomikumisaka nde lokola basali ya Nzambe, kati na makambo nyonso : na koyika mpiko makasi

5kati na kobetama, boloko mpe mobulu ;

6kati na bopeto, boyebi, kokanga motema mpe boboto ;

7kati na Liloba ya bosolo mpe nguya ya Nzambe ;

8kati na lokumu mpe soni,

9koyebana lokola bato oyo bayebani te,

10koyebana lokola bato na mawa,

11Bandeko ya Kolinto, tolobi na bino na bosembo nyonso mpe na mitema ya kofungwama.

12Tozali kobombela bino te bolingo na biso, kasi bino bozali kobombela biso oyo ya bino.

13Nazali koloba na bino lokola na bana na ngai ya bolingo : Bosala lokola biso ! Bino mpe bofungolela biso mitema na bino !

14Bosanganaka te na bato oyo bazangi kondima. Pamba te boyokani nini ezali kati na bosembo mpe mabe ? Boni, pole ekoki solo kosangana na molili ?

15Klisto akoki solo koyokana na Satana ? Eloko nini ekoki kosangisa mondimi elongo na moto oyo azangi kondima ?

16Boyokani nini ekoki kozala kati na Tempelo ya Nzambe mpe banzambe ya bikeko ? Pamba te biso tozali Ndako ya Nzambe na bomoi, kolanda maloba na Ye moko :

17Yango wana,

18Mpe,

← 2 Bakolinto 5 2 Bakolinto 2 Bakolinto 7 →