We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

1 Masolo ya Kala 7

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← 1 Masolo ya Kala 6 1 Masolo ya Kala 1 Masolo ya Kala 8 →

1Isakari abotaki bana mibali minei :

2Bana mibali ya Tola :

3Bana mibali ya Uzi :

4Kati na molongo na bango kolanda bituka na bango mpe mabota na bango ya botata ; ezalaki na basoda ya mpiko nkoto tuku misato na motoba, pamba te bazalaki na basi mpe bana ebele.

5Bandeko mibali nyonso kati na bituka ya libota ya Isakari, oyo bakomamaki na buku ya mabota, bazalaki nkoto tuku mwambe na sambo. Bazalaki basoda ya mpiko.

6Benjame abotaki bana mibali misato :

7Bela abotaki bana mibali mitano :

8Bana mibali ya Bekeri :

9Motango ya basoda ya mpiko, kolanda bituka na bango, ezalaki nkoto tuku mibale na nkama mibale.

10Bakitani ya Yediayeli :

11Kati na molongo ya Yediayeli, bakitani nyonso bazalaki bakambi ya bituka na bango mpe basoda ya mpiko. Motango na bango ezalaki nkoto zomi na sambo na nkama mibale.

12Bana mibali ya Iri :

13Bana mibali ya Nefitali :

14Bakitani ya Manase :

15Makiri abalaki Maaka oyo azalaki ndeko mwasi ya Upime mpe Shupimi. Kombo ya mwana mobali mosusu ya Manase ezalaki « Tselofikadi. » Tselofikadi abotaki kaka bana basi.

16Maaka, mwasi ya Makiri, abotelaki ye lisusu mwana mobali oyo apesaki kombo « Peretsi. » Peretsi azalaki na ndeko mobali, Shereshi, oyo abotaki bana mibali oyo : Ulami mpe Rekemi.

17Ulami abotaki :

18Amoleketi, ndeko mwasi ya Manase, abotaki

19Bana mibali ya Shemida :

20Bakitani ya Efrayimi :

21Taati abotaki Zabadi,

22Tata na bango Efrayimi alelaki bango mikolo ebele, mpe bandeko na ye bayaki kobondisa ye.

23Sima na yango, Efrayimi asangisaki lisusu nzoto na mwasi na ye oyo azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. Boye Efrayimi apesaki ye kombo « Beria, » pamba te abotamaki tango pasi ezalaki kati na libota na ye.

24Efrayimi azalaki lisusu na mwana mwasi, Shera, oyo atongaki Beti-Oroni ya ngomba mpe ya lubwaku, mpe Uzeni-Shera.

25Beria abotaki Refa, Refa abotaki Retsefi,

26Taani abotaki Laedani, Laedani abotaki Amiwudi,

27Nuni abotaki Jozue.

28Bakitani ya Efrayimi bazwaki lokola libula mpe bisika ya kovanda : Beteli mpe bamboka na yango ya mike, na ngambo ya este ; Narani, na ngambo ya weste ; Gezeri mpe bamboka na yango ya mike ; Sishemi mpe bamboka na yango ya mike kino na Aya mpe bamboka na yango ya mike.

29Bakitani ya Manase bazwaki lokola libula : Beti-Sheani, Taanaki, Megido, Dori mpe bamboka na yango ya mike. Bakitani ya Jozefi, mwana mobali ya Isalaele, bazalaki kovanda na bingumba wana nyonso.

30Bana mibali ya Aseri :

31Bana mibali ya Beria :

32Bana mibali ya Eberi :

33Bana mibali ya Yafeleti :

34Bana mibali ya Shemeri :

35Bana mibali ya Elemi, ndeko mobali ya Shemeri :

36Bana mibali Tsofa :

37Betseri, Odi, Shama, Shilisha, Yitirani mpe Beera.

38Bana mibali ya Yeteri :

39Bana mibali ya Ula :

40Bango nyonso bazalaki bakitani ya Aseri : bazalaki bakambi ya mabota na bango, bato ya lokumu, basoda ya mpiko mpe bakambi ya bakambi ya bituka. Motango ya bato nyonso oyo bakomamaki na buku ya mabota mpe bakoki mpo na bitumba, ezalaki nkoto tuku mibale na motoba.

← 1 Masolo ya Kala 6 1 Masolo ya Kala 1 Masolo ya Kala 8 →