We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

1 Masolo ya Kala 24

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← 1 Masolo ya Kala 23 1 Masolo ya Kala 1 Masolo ya Kala 25 →

1Tala bituka ya bana mibali ya Aron : Nadabi, Abiyu, Eleazari mpe Itamari.

2Nadabi mpe Abiyu bakufaki liboso ya tata na bango mpe batikalaki kobota te. Eleazari mpe Itamari basalaki mosala na bango ya bonganga-Nzambe.

3Tala ndenge Davidi akabolaki bango kolanda misala oyo bapesaki bango : Tsadoki, na etuka ya Eleazari ; Ayimeleki, na etuka ya Itamari.

4Bamonaki ete kati na bakitani ya Eleazari, bana mibali bazalaki ebele koleka bato oyo bazalaki kati na bakitani ya Itamari. Boye, bakabolaki bana mibali ya Eleazari lokola bakonzi ya mabota zomi na motoba mpe bana mibali ya Itamari lokola bakonzi ya mabota mwambe.

5Babetaki zeke mpo na kokabola bango, pamba te kati na bakitani ya Eleazari mpe ya Itamari, ezalaki na bakambi ya Esika ya bule mpe bakambi ya mosala ya Nzambe.

6Shemaya, mokomi mikanda, mwana mobali ya Netaneeli, na libota ya Levi, akomaki bakombo na bango na miso ya mokonzi, ya bakambi, ya Nganga-Nzambe Tsadoki, ya Ayimeleki, mwana mobali ya Abiatari ; mpe ya bakambi ya mabota ya Banganga-Nzambe mpe Balevi. Babetaki zeke mbala mibale mpo na etuka ya Eleazari, mpe mbala moko, mpo na etuka ya Itamari.

7Tala ndenge bakambi ya mabota baponamaki na nzela ya zeke :

8zeke ya misato ekweyaki epai ya Arimi ;

9zeke ya mitano ekweyaki epai ya Malikiya ;

10zeke ya sambo ekweyaki epai ya Akotsi ;

11zeke ya libwa ekweyaki epai ya Jozue ;

12zeke ya zomi na moko ekweyaki epai ya Eliashibi ;

13zeke ya zomi na misato ekweyaki epai ya Upa ;

14zeke ya zomi na mitano ekweyaki epai ya Biliga ;

15zeke ya zomi na sambo ekweyaki epai ya Eziri ;

16zeke ya zomi na libwa ekweyaki epai ya Petaya ;

17zeke ya tuku mibale na moko ekweyaki epai ya Yakini ;

18zeke ya tuku mibale na misato ekweyaki epai ya Delaya ;

19Ezalaki ndenge wana nde bakabolaki bango mpe bazalaki kolandana kati na mosala mpo na kokota kati na Tempelo ya Yawe. Bazalaki kosala misala na bango kolanda mibeko oyo tata na bango, Aron, apesaki bango, mpe ndenge Yawe, Nzambe ya Isalaele, atindaki ye.

20Tala bakitani mosusu ya Levi oyo bazalaki bakambi ya bituka :

21Yishiya, mpo na etuka ya Reabia ;

22Shelomoti, mpo na etuka ya Yitseari ;

23Bana mibali ya Ebron :

24Shamiri, mpo na etuka ya Mishe, mwana mobali ya Uzieli ;

25Zakari, mpo na etuka ya Yishiya, ndeko mobali ya Mishe.

26Bana mibali ya Merari :

27Bakitani ya Merari :

28Na nzela ya mwana na ye ya mobali Maali :

29Mpo na Kishi :

30Bana mibali ya Mushi :

31Bango mpe babetaki zeke lokola bandeko na bango ya mibali, bakitani ya Aron, na miso ya mokonzi Davidi, ya Tsadoki, ya Ayimeleki, ya bakambi ya mabota ya Banganga-Nzambe mpe ya Balevi. Boye bazalaki komona mabota nyonso ndenge moko, ezala libota ya kulutu to ya leki.

← 1 Masolo ya Kala 23 1 Masolo ya Kala 1 Masolo ya Kala 25 →