1Bamemaki Sanduku ya Yawe mpe batiaki yango kati na ndako ya kapo oyo Davidi atelemisaki mpo na yango, mpe babonzaki liboso ya Nzambe bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani.
2Tango Davidi asilisaki kobonza bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, apambolaki bato na Kombo na Yawe.
3Bongo apesaki na moto nyonso ya Isalaele : lipa, gato oyo basala na bambuma ya dati mpe gato oyo basala na bambuma ya vino ya kokawuka.
4Davidi atiaki ndambo ya Balevi mpo na kosala mosala liboso ya Sanduku ya Yawe, mpo na kokanisa, mpo na kosanzola mpe mpo na kokumisa Yawe, Nzambe ya Isalaele :
5Azafi azalaki mokambi ; Zakari azalaki molandi na ye ; mpe Yeyeli, Shemiramoti, Yeyeli, Matitia, Eliabi, Benaya, Obedi-Edomi mpe Yeyeli bazalaki kobeta nzenze mpe lindanda ; mpe Azafi azalaki kobeta manzanza.
6Banganga-Nzambe Benaya mpe Yaazieli bazalaki kobeta tango nyonso bakelelo liboso ya Sanduku ya Boyokani ya Nzambe.
7Ezalaki mokolo wana nde Davidi aponaki na mbala ya liboso Azafi mpe bandeko na ye, mpo ete bakumisa Yawe :
8Bokumisa Yawe, bobelela Kombo na Ye,
9Boyemba mpo na lokumu na Ye,
10Bosepela na Kombo na Ye ya bule !
11Bomipesa na Yawe mpe bosenga makasi na Ye !
12Bokanisa bikamwa, makambo minene oyo asalaki,
13bino bakitani ya Isalaele, mosali na Ye ;
14Yawe azali Nzambe na biso, mikano na Ye ekambaka mokili mobimba.
15Akanisaka tango nyonso Boyokani na Ye,
16boyokani oyo asalaki elongo na Abrayami,
17Akokisaki bosolo na yango epai ya Jakobi lokola mobeko,
18tango alobaki : « Nakopesa yo mokili ya Kanana
19Bozalaki kaka motango moke ya bato
20bozalaki koyengayenga
21kasi Yawe atikaki moto moko te konyokola bango,
22« Bosimba bapakolami na Ngai te,
23Bino bato ya mokili mobimba, boyembela Yawe !
24Bopanza sango ya nkembo na Ye kati na mabota !
25Pamba te Yawe azali monene mpe abongi na lokumu,
26Pamba te banzambe nyonso ya bikolo ezali kaka bikeko ya pamba,
27Kongenga mpe nkembo monene ezali liboso na Ye,
28Bino bituka ya mabota, bosanzola Yawe,
29Bosanzola Yawe mpe bopesa Kombo na Ye nkembo !
30Bino, bato ya mokili mobimba, bolenga liboso na Ye !
31Tika ete likolo esepela mpe mabele ezala kati na esengo !
32Tika ete ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango
33Boye, banzete ya zamba ekoyemba,
34Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu,
35Boganga : « Oh Nzambe Mobikisi na biso, bikisa biso,
36Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apambolama seko na seko !
37Davidi apesaki mokumba, epai ya Azafi mpe bandeko na ye, ya kosala mosala liboso ya Sanduku ya Boyokani ya Yawe kolanda bikateli ya mokolo na mokolo.
38Apesaki lisusu mokumba epai ya Obedi-Edomi, mwana mobali ya Yedutuni, mpe bandeko na bango, tuku motoba na mwambe, ya kosala mosala ya kokengela bikuke elongo na Osa.
39Davidi atiaki Nganga-Nzambe Tsadoki mpe Banganga-Nzambe mosusu, liboso ya Mongombo ya Yawe na esambelo ya likolo ya ngomba, oyo ezalaki na Gabaoni,
40mpo na kobonza tango nyonso bambeka ya kotumba epai na Yawe, na etumbelo na yango, na tongo mpe na pokwa, kolanda bikateli oyo ekomama na mobeko oyo Yawe apesaki na Isalaele.
41Emani mpe Yedutuni bazalaki elongo na bango, mpe bamosusu oyo baponamaki na bakombo na bango mpo na kokumisa Yawe na maloba oyo : « Mpo ete bolingo na Ye ekowumela seko. »
42Emani mpe Yedutuni baponamaki mpo na kobeta bakelelo, manzanza mpe bibetelo mosusu ya mindule mpo na kobongisa banzembo na tina na lokumu ya Nzambe. Bana mibali ya Yedutuni bazalaki bakengeli bikuke.
43Bato nyonso bazongaki, moto na moto epai na ye, mpe Davidi azongaki na ndako na ye mpo na kopambola libota na ye.